1 Corinthians 14

Likabo ya kosakola mpe ya koloba minoko

1Boluka liboso bolingo. Bozala na posa makasi ya makabo ya Molimo, mingi penza likabo oyo ya kosakola. 2Pamba te, moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kosolola na Nzambe kasi na bato te, mpo ete moto moko te azali kososola ye ; nzoka nde, azali koloba mabombami, na bokambami ya Molimo. 3Kasi moto oyo azali kosakola, azali nde koloba na bato, mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango. 4Moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kaka kokolisa kondima na ye moko, kasi oyo azali kosakola azali kokolisa kondima ya Lingomba mobimba. 5Nalingi ete bino nyonso bolobaka minoko oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi koleka moto oyo azali koloba minoko oyo eyebani te, loba kaka soki alimboli minoko yango mpo na kolendisa kondima ya Lingomba.

6Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na monoko oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino, soki liloba na ngai ememeli bino emoniseli moko te, boyebi moko te ya sika, lisakoli moko te, liteya moko te ? 7Ezali mpe ndenge moko mpo na bisaleli oyo babetelaka miziki lokola flite to nzenze. Soki ezali kobimisa te mingongo oyo ekeseni, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to nzenze ezali kobimisa ? 8Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba ? 9Ezali mpe ndenge moko mpo na bino : soki na minoko na bino, bozali koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki koyeba solo makambo oyo bozali koloba ? Wana, bokoloba na pamba. 10Kati na mokili, minoko ezali ebele, mpe moko te kati na yango ezangi tina. 11Nzoka nde, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya monoko oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, boye ye mpe akozala mopaya epai na ngai. 12Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, boluka mingi kozala na yango ebele, mpo na kokolisa Lingomba na kondima.

13Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na minoko oyo eyebani te, abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba. 14Pamba te, soki nazali kobondela na monoko oyo eyebani te, molimo na ngai ezali kobondela, kasi mayele na ngai ezali kosala te. 15Bongo, nasala nini ? Nakobondela na molimo na ngai, kasi nakobondela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai. 16Soki ozali kotonda Nzambe na molimo na yo, ndenge nini baoyo bazali koyoka te, bakoki koloba : “Amen !” na libondeli na yo ya kotonda Nzambe ? Pamba te, bayebi te makambo oyo ozali koloba. 17Okozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu akokola na kondima te.

18Natondaka Nzambe mpo ete nalobaka minoko oyo eyebani te koleka bino nyonso. 19Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ya koloba maloba nkoto zomi (1.000) na minoko oyo eyebani te.

20Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike. Bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; Kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo. 21Pamba te, ekomama na Mobeko : “Ekozala na minoko ya bapaya,
na lokota oyo eyebani te
nde nakoloba na bato oyo,
kasi ata bongo, bakoyoka ngai te,”
elobi Yawe.

22Yango wana, minoko oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bandimaka te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi. Nzoka nde, lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bandimaka te. 23Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba minoko oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bandimaka te bakoti kuna ; boni, bakoloba te ete bozali na liboma ? 24Nzoka nde, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo andimaka te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna ; boni, akomimona lokola moto ya masumu te ? Akomitungisa solo motema te ? 25Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Boye, akofukama, akokumisa Nzambe mpe akoloba : “Solo, Nzambe azali kati na bino.”

Mobulu te kati na losambo

26Bandeko, toloba lisusu nini ? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na monoko oyo eyebani te mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kolendisa Lingomba na kondima. 27Soki bato bazali koloba na minoko oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango. 28Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, tika ete ye oyo azali koloba monoko oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai na Nzambe.

29Mpo na oyo etali bato oyo basakolaka : tika ete bato mibale to misato basakola, mpe bamisusu bayekola malamu makambo oyo basakoli wana bazali koloba. 30Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli tango mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba esengeli kokanga monoko. 31Pamba te, bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama. 32Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli oyo ezali kokamba ye. 33Pamba te, Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya molongo.

Ndenge esalemaka na Mangomba nyonso ya basantu,
34basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka. 35Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango ndako, pamba te ezali soni mpo mwasi koloba kati na mayangani. 36Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino ? To ekomaki kaka epai na bino moko ? 37Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo. 38Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te. 39Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba minoko oyo eyebani te. 40Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.
Copyright information for LinMNB